Psalms 126

Kolona mpe kobuka

Nzembo ya mobembo tango bazalaki na nzela mpo na kokende na ndako na Yawe.


1 Tango Yawe azongisaki bakangami na Siona,
tozalaki lokola bato bazalaki kolota ndoto.

2 Minoko na biso etondaki na koseka,
lolemo na biso na banzembo ya esengo.
Bongo ezalaki koloba na kati-kati ya bikolo,
“Yawe asalelaki bango makambo ya minene !”

3 Yawe asalelaki biso makambo ya minene ;
mpe totondaki na esengo.

4 Zongisa lisusu bomengo na biso, Yawe,
lokola bamayi na Negeoi !

5 Baoyo bazali kolona na mayi na miso,
bakobuka na banzembo ya esengo.

6 Ye oyo akendaka libanda na kolela
tango amemaka bambuma oyo alonaka ;
akozonga na banzembo ya esengo,
akomema biloko
ya elanga na ye.
Copyright information for LinMNB